Titre : Koffi Olomidé - Sans anesthésie [
Click pour écouter]
Album : Attentat
Année : 1998
Paroles :
Mon amour yoka ngai Tabou Fatou yoka ngai
Oza obliger o comprendre ngai naza ouvre y'osala eh
Oza obliger otalela ngai po ngai wa yo sans toi
Naza moto sans horizon bateau ivre naviguant dans des eaux troubles
Ba mbula_ebele ba sanza_ebele esangisa ngai na yo
Nzoto na nga_elamba nango préferé_eza poso nayo
Chaque_eteni ya nzoto na ngai
Ekoma banque y'amour na yo Tabou Fatou
Koboya nga_eza solution te, ata nasali mabe
Pardonner nga meya culpa_aider nga nalongua na bozoba
Est-ce que lelo soki otiki ngai pe lobi soki_oyoki te epayi na ke
Nazongeli ba moment ya bozoba, est-ce que_eza soni te pona yo moto_osala nga ?
Paroles : L'amour est un film trop merveilleux, qui ne laisse passer que les belles couleurs !
Soki_opesi ngai mbisi, nakoliya mukolo moko
Soki_oteyi ngai kopepa, plus jamais nakokufa nzala
Pesa nga lelo etumbu_eza liteya pour toute la vie
Kasi soki okoboya ngai_obotoli nga souffle ya vie pour toujours
Mokristo soki asali lisumu
Soki atubeli mabe na ye
Nganga Nzambe_akolimbisa ye pe akoleyisa ye eucharistie
Pourquoi y'olongui n'okosala bongo te_epayi na nga Tabou Fatou
Awa y'okangui maboko, lobi soki oyoki ngai nawe
Tumba nga bongo putulu na nga otia na bileyi ya niawu na yo
Nakoma o vivre onteyi na ye, okoma_olinga nga à travers ye
Nakom'oyoka mongongo na yo, chaque fois soki ozobenga ye miaou miaou
Paroles : Oyo boye ba maman bomitika na maboko ya ba papa
Po tokota bien na l'an 2000 esala nini ko... hein ?
Refrain
Nga natuna eeh hiii
Pardon na yo motuya n'ango vraiment est-ce qu'eza combien ?
Esika motema ezalaka_oy'ayo ekoma hécatombe
Kolimbisa moninga est-ce qu'il faut afuta na prix ya vie na ye
Cas na nga_ezopesa mawa koleka ya moto ya Kosovo
Pasi ya l'amour Tabou Fatou
Nga nalela eeh hiii
Bongo ekomi'osala neti horloge_oyo eza na retard
Demarche na nga_ekomi neti ya mot'oyo aza na RDV
Na cimetière na minuit na mot'oyo akelaka liwa eh
Papitcho Mwekatone djo ya Tabou Fatou
Nga nalela eeh hiii
Esika lino_eza ya kolongua lolemu_ezangaka te koleka
Esika bato baza lisanga faute_ezangaka te kosalema
Soki kolimbisana_ezali te mokili_ekolimua eh
Pardonner encore et toujours Tabou Fatou hii
Nga natuna aah
Pourquoi kaka bat'oyo tolingaka mingui hiii
Un jour bayaka kotia biso likula na motema
Kasi_auparavant bazuaka te soin ya kotia_anésthésie
Pasi ya l'amour Tabou Fatou
Nga natuna eeh
Baye totiaka mitema un jour bakokunda biso
Soki toleli bango nde bakopesa biso mouchoir
Souvent le jour J bango bapesaka biso mokongo
Souvent malheur na biso bango nde bazalaka ba_auteurs na'ngo
Mystère ya l'amour
Nga natuna eeh hiii
Pourquoi kaka bat'oyo hier encore bazalaki_otala biso
Na regard ya tendresse lokola bato_bazo bunda na pongi
Soudain regard na bango_etondi agressivité
Bakomi_otala biso ndenge Yuda atalaka Arabo
Bayini biso ndenge musulman ayina ngoulou ?
Mystère ya l'amour...huuu contrat ya l'amour... huuu
Mystère ya l'amour... Tabou Fatou
Contrat ya l'amour... Papitcho
Mystère ya l'amour... Mystère ya l'amour...
Hiiiiiii...
Nga nalela eeeh