[ Ecouter ce morceau ]
[ Ajouter ce morceau à mon blog ]
- Titre : Koffi Olomidé - Fouta Djallon
- Album : V12
- Année : 1996
Paroles :
Intro
Malheur boni otingami nga lokola
singa elandanka nzela oyo ya tonga aaah
Parole
L'amour... n'existe pas...
Il n'existe que des preuves d'amour !
1er couplet
Akotika na ndako yo moko mawa eh
Tango akozonga mwese deja ekomaki sanza
Tango okotuna ye akoyebisa yo rien ki va eh
Yo journée mobimba motema tout le temps likolo
Okobanga amona kanda na yo noki te asilika
Kanda na ye ebakisa douleur likolo ya malheur na yo
Ngo amour ndenge nini osali p'okomisa
Mutu n'esika oyo akanaki te eh mawa
Break
Olangwe ye eh eh Olangwe ye ba yama
Asala yo nini'ango oko katshua se pona ye
C'a pas l'air comme ça... ekosila bien te
Cas na nga ekomi desepéré
Toyokanaka ye na nga tobinaka à l'unisson
Na la vie nga ye totambola main dans la main heinn...
2è couplet
Photo na ye na ndako na yo otia ya grandeur nature
Cinema na yo preféré se oya demarche na ye
Appetit ya solo ozuaka se soki alambi ye meyi
Pongi ya solo olalaka se soki azali pene na yo
Idée na yo ofuta ba mbanda avocat batikela yo ye
Ezanga yo se omata na nzete oganga tu l'aimes
Ngo amour ndenge nini osali p'okomisa
Moto n'esika oyo akanaki te eh mawa eeeh
Break
Olangwe ye eh eh akomisa yo denge
Asala yo nini'ango okoma nkoyi ya dessin animé
Sans délai ni préavis y'obendani na yo
Ngai moto miso na nga emonaki yo
Mokolo ozalak'obima na se ya mayi hi
Sanza na mwese ba suani pona kolula ah yo ngo ooooh
Banda jour maman abotaki nga... nazalaki'ozela yo
Boni otikeli nga gout ya mafuta ya nzoyi
Na mbebo boni okati moke oya ngai bonheur
Nani akoki'olinga azang'eloko'oyo alinga à l'infini eehh
Eleko ya bien mokolo nini okoya aaaah
Na ngambo epa nga naz'amour elata ngai
Fololo ya tongo Diba la reine du Fouta Djallon
Oza lokola mbongo ata moto aza n'ango ebele eh
Sokiii ba pesi ye akozua kaka
Nakobomba yo mieux que secret ya ba pharaon eeeeeh
Tango bazuaka ya bango tomelaka se soyi eeeh
Lelo nazui oya ngaii esui bino wapi eeeeeeh Diba eeeeeeh
Parole
Ata nzoko azalaka na besoin ya vitamine...
Refrain
Hummmm amour amour amour amour...
Nini osali ngaaa lelo
Po nini o priver ngaaa de tout
Po nini o tourner ngaaa le dos aaamour huummm
Heee amour amour amour amour...
Fulu nini obuaka oya yo mawa eh
Yo mok'oteyaki nga kopimbwa...
Po nini obotoli nga mapaapu aaamour Patriiick Diam
Heee amour amour amour amour...
Po nini ozongisi nga zeroo
Nazalaki mohumbu na yooo
Po nini okomi opesa ngaa liwaa avant l'heure Diamo... aaah
Heee amour okosuka na nga wapi eeh
Bolingo pourquoi vraiment osili elengui
Bonbon na nga pourquoi vraiment okimi ngai
Chiclet na nga vraim'osili sukali avant aaah Diamona aaaah
Diamona akomisi nga pondu ya matanga eh
Moto nyonso nalinga akumb'oyo ya ye partie
Ngai mboto osangisi nga na malangwa
Y'okakoli nga sans ke otuna motuya na nga
Y'okomisi etula oyo ya simba ziguida haannn haannn haannn
Diamona ata kala okobanza nga eeeh
Ba nzungu'akala elambaka basupu ya bien
Après tout moyi ekozuaka se elongui
Elengui ya makosso ezalaka na mokuwa
Y'okati mandalala nanu na weyi te... Somba sanduku
Okolela nga dans pas longtemps... Patriiick
Hummm bolingoo okolela nga eeeh
Heee bolingo ooo oooh
Visa ya bonheur bazuaka wapi eh ?
Ambassade ekangama na libanda ah
Tozali ebele molongo molayi... tozozela aaah
Paroles
Pona nini moyi ekozuaka moto seko obe na elongui ?
Kasi na motema te...
Moke ezali ndambo te